33 Mpe nakopalanganisa bino na kati ya bikólo,+ mpe nakobimisa mopanga na ekótó nsima na bino;+ mpe mokili na bino esengeli kotikala mpamba,+ mpe bingumba na bino ekokóma kaka bitiká mpamba.
16 ekosalema mpenza lisusu boye: mopanga oyo bozali kobanga ekozwa bino na mokili ya Ezipito,+ mpe nzala oyo bozali koyokela nsɔmɔ ekolanda bino esika nyonso tii na Ezipito;+ mpe kuna nde bokokufa.+
14 Mpe baoyo nyonso bazali zingazinga na ye mpo na kosalisa ye, mpe bituluku na ye nyonso ya basoda, nakopalanganisa bango na mipɛpɛ nyonso;+ mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+