3 Mpo moto oyo azali na mposa ya mai nakosopela ye mai,+ mpe esika oyo ekauká nakosopela yango mikɛli oyo ezali kotíyola.+ Nakosopela momboto na yo elimo na ngai,+ mpe bakitani na yo lipamboli na ngai.
28 “Mpe nsima na yango, ekosalema mpenza boye: nakosopela bato ya ndenge nyonso+ elimo na ngai,+ mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi+ bakosakola. Mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ. Mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli.