Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 6:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe ya solo, bato na bino oyo bakobika bakokanisa ngai lisusu na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ mpamba te nayoki mpasi mpo na motema na bango ya pite etiki ngai+ mpe mpo miso na bango oyo ezali kolanda bikeko na bango ya bosɔtɔ mpo na kosala pite;+ mpe bakoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bango mpo na makambo mabe oyo basali na makambo na bango nyonso oyo eyinamá.+

  • Ezekiele 20:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Mpe ya solo kuna, bokokanisa lisusu banzela na bino+ mpe misala na bino nyonso oyo na yango bomikómisaki mbindo,+ mpe bokoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bino mpo na makambo na bino nyonso ya mabe, oyo bosalaki.+

  • Zekaria 12:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Mpe nakosopela ndako ya Davidi ná bato oyo bafandi na Yerusaleme elimo ya boboto+ mpe ya malɔmbɔ,+ mpe bakotala mpenza epai ya Moto oyo batɔbɔlaki,+ mpe bakolela Ye mpenza ndenge balelaka mwana mobali oyo azali kaka ye moko; mpe bakolela ye na mpasi na motema ndenge balelaka mwana mobali ya liboso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto