Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe nakotinda na kati na bino banyama ya zamba oyo efandaka na esobe,+ mpe yango ekozangisa bino bana+ mpe ekolongola banyama na bino ya mboka mpe ekokitisa motángo na bino, mpe babalabala na bino ekotikala mpenza mpamba.+

  • Kolimbola Mibeko 32:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Bakolɛmba na nzala+ mpe bakolyama na fiɛvrɛ makasi+

      Mpe na libebi moko ya mabe mpenza.+

      Mpe nakotindela bango mino ya banyama,+

      Nzela moko na ngɛngɛ ya banyoka ya putulu.+

  • 2 Bakonzi 17:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe esalemaki boye: ntango babandaki kofanda kuna, babangaki+ Yehova te. Na yango, Yehova atindaki bankɔsi+ kati na bango, mpe ekómaki koboma bango.

  • Ezekiele 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Yango wana, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ndenge wana nde ekozala ntango bitumbu na ngai minei oyo eyokisaka mpasi ekokokisama,+ elingi koloba, mopanga, nzala, banyama mabe ya zamba mpe maladi mabe,+ oyo nakotindela mpenza Yerusaleme, mpo na kolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka.+

  • Ezekiele 33:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “Talá oyo okoyebisa bango: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, ya solo, bato oyo bazali na bisika oyo ebebisami bakokwea na mopanga;+ mpe moto oyo azali na etando ya esobe, ya solo, nakopesa ye azala eloko ya kolya mpo na nyama ya zamba;+ mpe baoyo bazali na bisika makasi mpe na mibenga+ bakokufa na maladi mabe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto