23 Mpe bana ya Amone ná Moabe batɛlɛmaki kobunda na bato oyo bafandaka na etúká ya ngombangomba ya Seire+ mpo báboma bango mpe básilisa bango nyɛɛ; mpe ntango kaka basilisaki bato oyo bafandaka na Seire, basalisanaki mpo moto na moto aboma moninga.+
22 Mpe nakokweisa mpenza kiti ya bokonzi ya makonzi mpe nakosilisa makasi ya makonzi ya bikólo nyɛɛ;+ mpe nakokweisa likalo ná batambwisi na yango, mpe bampunda ná batambwisi na yango bakobomama mpenza,+ mokomoko na mopanga ya ndeko na ye.’”+
13 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango ete mobulungano oyo euti na Yehova ekopalangana bipai nyonso na kati na bango;+ mpe bakosimba makasi mpenza, mokomoko lobɔkɔ ya moninga na ye, mpe lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla mpenza lobɔkɔ ya moninga na ye.