3 Ntango moto yango abimaki na ɛsti, ná nsinga ya komeka na lobɔkɔ na ye,+ amekaki mpe mapeko nkóto moko (1 000) mpe akatisaki ngai mai, mai ezalaki kokóma tii na makɛsi.
15 Nzokande oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki mongendu moko ya wolo mpo na komeka,+ mpo ameka bonene ya engumba yango mpe ya baporte na yango mpe ya efelo na yango.+