-
Mitángo 16:40Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
40 mpo ezala ekaniseli mpo na bana ya Yisraele, mpo moto moko te oyo azali mopaya,+ oyo azali mwana ya Arona te, abɛlɛma te mpo na kosala ete mpaka ya malasi ebimisa milinga liboso ya Yehova,+ mpe mpo moto moko te akóma lokola Kora ná liyangani+ na ye, kaka ndenge Yehova alobaki na ye na nzela ya Moize.
-
-
Ezekiele 44:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 “‘Mpe na oyo etali ba-nganga-nzambe Balevi,+ bana ya Zadoke,+ oyo bakokisaki mokumba ya esika na ngai mosantu ntango bana ya Yisraele bayengayengaki mosika na ngai,+ bango nde bakobɛlɛma na ngai mpo na kosalela ngai mosala, mpe basengeli kotɛlɛma liboso na ngai+ mpo na kopesa ngai mafuta+ mpe makila,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
-