Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 23:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na nsima, azwaki banga-nga-nzambe nyonso na bingumba ya Yuda mpe ayaki na bango, mpo akómisa bisika oyo etombwaná epai banganga-nzambe babimisaki milinga ya mbeka bisika oyo ebongi te na losambo, banda na Geba+ kino na Beere-sheba;+ mpe akweisaki bisika oyo etombwaná ya baporte oyo ezalaki na esika ya kokɔta na porte ya Yosua, kapita ya engumba, oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mwasi ntango moto azali kokɔta na porte ya engumba.

  • 2 Ntango 29:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe alobaki na bango boye: “Bóyoka ngai, bino Balevi. Sikoyo, bómisantisa+ mpe bósantisa ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, mpe bóbimisa eloko ya mbindo na esika mosantu.+

  • Nehemia 9:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Bakonzi na biso, bankumu na biso, banganga-nzambe na biso ná bankɔkɔ na biso+ basalelaki mobeko+ na yo te, batyaki likebi te na mitindo+ na yo mpe na matatoli na yo oyo ozalaki kotatwela+ bango.

  • Yirimia 23:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpo mosakoli ná nga-nga-nzambe bango nyonso bakómi mbindo.+ Lisusu kati na ndako na ngai nakuti mabe na bango,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 8:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe alobaki na ngai boye: “Omoni, Ee mwana ya moto, oyo mikóló ya ndako ya Yisraele bazali kosala na molili,+ moto na moto na bashambrɛ ya kati ya bililingi na ye ya kitoko mpenza? Mpo bazali koloba ete: ‘Yehova azali komona biso te.+ Yehova atiki mokili.’”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto