5 “Ee banganga-nzambe,+ bóyoka likambo oyo, Ee ndako ya Yisraele, bótya likebi, mpe bino, Ee ndako ya mokonzi,+ bófungola matoi, mpo lisambisi yango etali nde bino; mpamba te bino bokómeli Mizipa motambo+ mpe bokómi lokola monyama oyo etandami likoló ya Tabore.+