Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 44:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nsukansuka Yehova akokaki kokangela yango motema lisusu te mpo na mabe ya misala na bino, mpo na makambo ya bosɔtɔ oyo bosalaki,+ bongo mokili na bino ekómaki esika oyo ebebisamá mpe eloko ya kokamwa mpe eloko oyo elakelami mabe, esika oyo moto moko te afandi, lokola na mokolo ya lelo.+

  • Ezekiele 6:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bɛtá mabɔkɔ+ na yo mpe tutatutá na lokolo na yo, mpe lobá: “Aa, mawa!” mpo na makambo nyonso ya mabe oyo eyinamá ya ndako ya Yisraele,+ mpo bakokwea na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe.+

  • Ezekiele 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Sikoyo, nsuka ekómeli yo,+ mpe nakotindela yo mpenza nkanda na ngai, mpe nakosambisa yo na kolanda banzela na yo+ mpe nakozongisela yo makambo na yo nyonso oyo eyinamá.

  • Ezekiele 33:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba,+ ɛɛ libebi mpenza, mpo na biloko na bango nyonso oyo eyinamá oyo basali.”’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto