Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpo Yehova Nzambe na yo azali Nzambe ya motema mawa.+ Akosundola yo te mpe akobebisa yo te mpe akobosana te kondimana+ ya bankɔkɔ na yo oyo alapelaki bango ndai.

  • 2 Ntango 36:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Lisusu, baoyo batikalaki, baoyo babikaki na mopanga, amemaki bango bakangami na Babilone,+ mpe bakómaki basaleli na ye+ mpe ya bana na ye tii ntango bokonzi ya Perse+ ebandaki koyangela;

  • Yisaya 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe moko ya bandambo zomi ekozala naino na kati na yango,+ mpe yango ekozala lisusu eloko moko ya kotumba, lokola nzete monene mpe lokola ebakata ya nzete oyo, soki bakati yango,+ ekumu na yango etikalaka;+ momboto mosantu ekozala ekumu na yango.”+

  • Yisaya 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: baoyo bakotikala na Yisraele+ mpe baoyo babiki na ndako ya Yakobo bakoluka lisusu lisalisi te epai na ye oyo azali kobɛta bango,+ mpe bakoluka mpenza lisalisi epai ya Yehova, Mosantu ya Yisraele,+ na bosolo.+

  • Ezekiele 6:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘“Mpe ntango ekosalema, nakotikela bino bato oyo babiki na mopanga na kati ya bikólo, ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+

  • Mika 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Mpe bato ya Yakobo oyo batikali+ bakokóma na kati ya ebele ya bato ya bikólo lokola mamwɛ oyo euti epai ya Yehova,+ lokola mbula monene likoló ya milona,+ oyo etalelaka moto te mpe ezelaka te bana ya moto ya mabele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto