Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bosengeli kobatela mpe kosalela yango, mpamba te yango nde bwanya+ mpo na bino mpe mayele+ mpo na bino na miso ya bato ya bikólo oyo bakoyoka nsango ya malako oyo nyonso, mpe bakoloba mpenza ete: ‘Ekólo monene oyo ezali mpenza ekólo moko ya bato ya bwanya mpe ya mayele.’+

  • 2 Samwele 7:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe ekólo nini na mabele ezali lokola bato na yo Yisraele,+ oyo Nzambe akendaki kosikola mpo na ye moko, mpo bázala bato na ye,+ mpo amipesa nkombo+ mpe asalela bango makambo minene mpe ya nsɔmɔ:+ kobengana bikólo ná banzambe na bango mpo na bato na yo, oyo osikolaki+ mpo na yo moko longwa na Ezipito?

  • 1 Bakonzi 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo mokonzi-mwasi ya Sheba+ ayokaki nsango ya Salomo oyo ezalaki kokumisa nkombo ya Yehova.+ Na yango, ayaki mpo na komeka ye na mituna ya makasimakasi.+

  • Nzembo 50:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Longwa na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe ye moko angɛngi.+

  • Bileli 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Baoyo nyonso bazalaki koleka na balabala babɛti mabɔkɔ mpo na kosɛka yo.+

      Babɛti piololo+ mpe bazali se koningisela mwana mwasi ya Yerusaleme motó,+ mpe koloba ete:

      “Oyo nde engumba oyo bazalaki kolobela ete: ‘Ezali nsuka ya kitoko, nsai mpo na mabele mobimba’?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto