30 Mpe nakosilisa mpenza nyɛɛ bisika na bino oyo etombwaná ya losambo,+ mpe nakolongola bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi mpe nakolalisa bibembe na bino mpenza likoló ya bibembe ya bikeko na bino ya bosɔtɔ;*+ mpe molimo na ngai ekoyina mpenza bino.+
5 baoyo balamwisaka mposa makasi na banzete minene,+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ bazali koboma bana na mabwaku ya mikɛli, na nse ya madusu ya mabanga, boye te?+
20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+
2 “Tombolá miso na yo na banzela oyo bato balekalekaka mpe moná.+ Esika nini oyo basangisi na yo nzoto na makasi te?+ Ofandi pembeni ya banzela mpo na bango, lokola Moarabe na esobe;+ mpe ozali kaka kokómisa mokili yango mbindo na misala na yo ya bondumba mpe na mabe na yo.+