Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 18:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na yango, Yehova alobaki ete: “Koganga ya komilelalela mpo na Sodoma mpe Gomora,+ ɛɛ, ezali makasi, mpe lisumu na bango, ɛɛ, ezali kilo mingi.+

  • Ebandeli 19:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Bongo Yehova anɔkisaki sufulu mpe mɔtɔ na Sodoma ná Gomora;+ yango eutaki na Yehova kuna na likoló.

  • Kolimbola Mibeko 29:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 sufulu ná mungwa+ mpe kozika,+ bongo eloko ekolonama te na mokili na yango mobimba, mpe ekobimisa milona te, mpe nzete moko te ekobima kuna, lokola kokwea ya Sodoma ná Gomora,+ ya Adema+ ná Zeboyime,+ oyo Yehova akweisaki na nkanda na ye mpe na nkɛlɛ na ye;+

  • Kolimbola Mibeko 32:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Mpo vinyo na bango euti na vinyo ya Sodoma

      Mpe na mikala ya bilanga ya Gomora.+

      Mbuma na bango ya vinyo ezali mbuma ya vinyo ya ngɛngɛ,

      Bituka na bango ezali bololo.+

  • Yisaya 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bóyoka liloba ya Yehova,+ bino bakonzi ya Sodoma+ oyo bozali koyangela na makasi.+ Bino bato ya Gomora, bótya litoi na mobeko ya Nzambe na biso.

  • Yisaya 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ndenge bilongi na bango ezali komonana ezali mpenza kofunda bango,+ mpe bazali koyebisa lisumu na bango lokola oyo ya Sodoma.+ Babombi yango te. Mawa na molimo na bango! Mpo bamibendeli mpasi.+

  • Yirimia 23:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe namoni makambo ya nsɔmɔ+ epai ya basakoli ya Yerusaleme, bazali kosala ekobo+ mpe kotambola kati na lokuta;+ mpe balendisi mabɔkɔ ya basali-mabe mpo moto na moto alongwa+ na mabe na ye te. Na miso na ngai bango nyonso bakómi lokola Sodoma+ mpe bato oyo bafandi na yango lokola Gomora.”+

  • Yuda 7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ndenge moko mpe Sodoma ná Gomora ná bingumba ya zingazinga na yango,+ nsima wana bango, lokola baanzelu wana, basalaki pite koleka mpe balandaki nzoto ya mosuni mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te,+ batyami liboso na biso lokola ndakisa ya kokebisa+ na ndenge bazwaki etumbu ya lisambisi ya mɔtɔ ya seko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto