Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 34:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpamba te Yobo alobi: ‘Nazali mpenza na elonga,+

      Kasi Nzambe ye moko abebisi lisambisi na ngai.+

  • Yobo 35:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 “Yango nde omoni ete ezali bosembo?

      Olobi: ‘Boyengebene na ngai eleki ya Nzambe.’+

  • Masese 19:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bozoba ya moto ya mabele nde ebulunganisaka nzela na ye,+ bongo motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.+

  • Ezekiele 33:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe bana ya bato na yo balobi ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te,’+ kasi, bango, nzela na bango nde ezali sembo te.

  • Malaki 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Bino bolɛmbisi Yehova na maloba na bino,+ mpe bolobi ete: ‘Tolɛmbisi ye na ndenge nini?’ Na ndenge bozali koloba ete: ‘Moto nyonso oyo azali kosala mabe azali malamu na miso ya Yehova, mpe ye asepeli na bato ya motindo wana’;+ to, ‘Wapi Nzambe ya bosembo?’”+

  • Baroma 9:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Ee moto,+ bongo yo nani mpo ofungolela Nzambe monɔkɔ?+ Eloko oyo bayemi ekoki nde koloba na moto oyo ayemaki yango ete: “Mpo na nini osali ngai boye?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto