Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Kobima 4:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Na yango, bato bandimaki.+ Ntango bayokaki ete Yehova atye likebi na ye+ epai ya bana ya Yisraele mpe ete amoni mpasi na bango,+ boye bagumbamaki mpe bafukamaki bilongi na nse.+

  • Kolimbola Mibeko 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 To Nzambe amekaki nde koya kolongola ekólo moko na kati ya ekólo mosusu, na komekama,+ na bilembo+ mpe na makamwisi+ mpe na etumba+ mpe na nguya ya lobɔkɔ+ na ye mpe na lobɔkɔ oyo esembolami+ mpe na makambo minene ya nsɔmɔ,+ lokola nyonso oyo Yehova Nzambe na bino asalaki mpo na bino na Ezipito na miso na yo?

  • Nzembo 103:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ayebisaki Moize banzela na ye,+

      Misala na ye, na bana ya Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto