Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 8:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo ateyaki yo komikitisa mpe atikaki yo oyoka nzala+ mpe aleisaki yo mana,+ oyo yo oyebaki te mpe oyo batata na yo bayebaki te; mpo oyeba ete moto abikaka kaka na mampa te kasi moto abikaka na liloba nyonso ya monɔkɔ ya Yehova.+

  • Kolimbola Mibeko 30:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Soki okoyoka mitindo ya Yehova Nzambe na yo, oyo nazali kopesa yo lelo, elingi koloba olinga Yehova Nzambe+ na yo, otambola na banzela na ye mpe obatela mitindo+ na ye mpe mibeko na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi,+ okozanga te kotikala na bomoi+ mpe kokóma mingi, mpe Yehova Nzambe na yo akopambola yo mpenza na mokili oyo ozali kokende kozwa.+

  • Luka 10:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Alobaki na ye ete: “Oyanoli malamu; ‘kobá kosala bongo mpe okozwa bomoi.’”+

  • Baroma 10:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo Moize akomi ete moto oyo akangamaki na boyengebene ya Mibeko akozala na bomoi na nzela na yango.+

  • Bagalatia 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nzokande Mibeko esɛngaka kozala na kondima te, kasi “moto oyo azali kotosa yango akozala na bomoi na nzela na yango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto