51 “Bato ya mitó makasi mpe bazangá kokatama ngenga na mitema+ mpe na matoi, bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu; ndenge bankɔkɔ na bino basalaki, bino mpe bozali kosala bongo.+
18 Mpo boyebi ete ezalaki te na biloko oyo epɔlaka,+ na palata to na wolo, nde bosikolamaki+ na etamboli na bino oyo ebotaka mbuma te oyo bozwaki na mimeseno oyo eutaki na bankɔkɔ na bino.