Danyele 7:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 “Nsima na yango, nazalaki se kotala, mpe talá! nyama mosusu, oyo ezalaki lokola nkoi,+ kasi na mokɔngɔ na yango, ezalaki na mapapu minei ya ekelamu oyo epumbwaka. Mpe nyama yango ezalaki na mitó minei,+ mpe yango solo, bapesaki yango boyangeli. Danyele 8:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpe ntaba-mobali oyo etondi na nsuki elakisi mokonzi ya Grɛsi;+ kasi liseke monene oyo ezalaki na katikati ya miso na yango elakisi mokonzi ya liboso.+ Danyele 10:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Bongo alobaki na ngai lisusu boye: “Oyebi mpenza mpo na nini nayei epai na yo? Mpe sikoyo nakozonga kobunda na nkumu ya Perse.+ Awa nazali kobima, talá! nkumu ya Grɛsi mpe azali koya.+ Danyele 11:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 “Mpe mokonzi moko ya nguya akotɛlɛma mpenza mpe akoyangela na boyangeli moko monene mingi+ mpe akosala ndenge alingi.+
6 “Nsima na yango, nazalaki se kotala, mpe talá! nyama mosusu, oyo ezalaki lokola nkoi,+ kasi na mokɔngɔ na yango, ezalaki na mapapu minei ya ekelamu oyo epumbwaka. Mpe nyama yango ezalaki na mitó minei,+ mpe yango solo, bapesaki yango boyangeli.
21 Mpe ntaba-mobali oyo etondi na nsuki elakisi mokonzi ya Grɛsi;+ kasi liseke monene oyo ezalaki na katikati ya miso na yango elakisi mokonzi ya liboso.+
20 Bongo alobaki na ngai lisusu boye: “Oyebi mpenza mpo na nini nayei epai na yo? Mpe sikoyo nakozonga kobunda na nkumu ya Perse.+ Awa nazali kobima, talá! nkumu ya Grɛsi mpe azali koya.+
3 “Mpe mokonzi moko ya nguya akotɛlɛma mpenza mpe akoyangela na boyangeli moko monene mingi+ mpe akosala ndenge alingi.+