Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Danyele 7:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe akoloba maloba ya kotɛmɛla Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe akotungisa ntango nyonso basantu ya Oyo-Aleki-Nyonso.+ Mpe akokana kobongola bantango+ mpe mobeko,+ mpe bango bakopesama na lobɔkɔ na ye mpo na ntango moko, bantango mpe katikati ya ntango.+

  • Danyele 12:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nabandaki koyoka moto oyo alataki elamba ya lini, oyo azalaki likoló ya mai ya ebale, ndenge atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali mpe lobɔkɔ na ye ya mwasi na likoló mpe alapaki ndai+ na nkombo ya Oyo azali na bomoi seko ete:+ “Ekozala mpo na ntango moko oyo etyamá, bantango oyo etyamá mpe katikati ya ntango.+ Mpe ntango kaka bakosilisa kobukabuka nguya ya bato oyo bazali basantu,+ makambo nyonso wana ekokóma na nsuka na yango.”

  • Luka 21:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 mpe bakokwea na mopanga mpe bakomema bango bakangami na bikólo nyonso;+ mpe Yerusaleme ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá+ ya bikólo ekokoka.

  • Emoniseli 12:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi bapesaki mwasi yango mapapu mibale ya mpongo+ monene, mpo apumbwa na esobe+ tii na esika na ye; kuna nde baleisi ye+ na boumeli ya ntango moko mpe ya bantango mpe ya katikati ya ntango+ mosika na nyoka yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto