Masese 16:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Na motema boboto mpe na bosolo nde bazipaka masumu mpo na libunga,+ mpe na kobanga Yehova nde moto alongwaka na mabe.+ Masese 28:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+ kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.+ Yisaya 55:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+ Ezekiele 18:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 “‘Nde moto mabe, soki abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki+ mpe soki abateli mpenza mibeko na ngai nyonso mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene,+ akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te.+ Matai 3:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Bongo bósala misala oyo emonisi ete bobongoli motema;*+
6 Na motema boboto mpe na bosolo nde bazipaka masumu mpo na libunga,+ mpe na kobanga Yehova nde moto alongwaka na mabe.+
13 Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+ kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.+
7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+
21 “‘Nde moto mabe, soki abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki+ mpe soki abateli mpenza mibeko na ngai nyonso mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene,+ akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te.+