Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Mpe na mbula ya liboso ya Siruse+ mokonzi ya Perse, mpo liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia+ ekokisama, Yehova alamwisaki+ elimo ya Siruse mokonzi ya Perse, bongo atindaki bábelela+ na bokonzi na ye mobimba, mpe lisusu bákoma na mokanda+ ete:

  • Yisaya 21:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bayebisi ngai emonaneli moko ya mpasi:+ Mokosi azali kosala na bokosi, mpe mopunzi azali kopunza.+ Ee Elame, matá! Ee Media,+ zingá! Nasali ete kokimela nyonso oyo azalaki kobimisela bato esila.+

  • Yisaya 45:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta,+ na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye,+ mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.

  • Yirimia 50:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpo talá nazali kolamwisa mpe komatisa lisangá moko ya bikólo minene uta na mokili ya nɔrdi mpo na kobundisa Babilone,+ mpe bakomitanda mpenza mpo na kobundisa ye.+ Akozwama+ kuna. Makula na bango ezali lokola makula ya moto ya nguya oyo azali kozangisa moto bana, oyo azongaka nsima te kozanga kobimisa likambo.+

  • Danyele 6:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Nzokande, makambo ya Danyele yango etambolaki malamu na bokonzi ya Dariuse+ mpe na bokonzi ya Siruse Moperse.+

  • Danyele 9:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na mbula ya liboso ya Dariuse+ mwana ya Ahasueruse ya momboto ya Bamede,+ oyo bakómisaki mokonzi na bokonzi ya Bakaladea;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto