Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bato ya bikólo bakozwa mpenza bango mpe bakomema bango na bisika na bango, mpe ndako ya Yisraele ekozwa bango lokola biloko na bango na mabele ya Yehova, mpo bázala basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi,+ mpe bakozala mpenza bato oyo bazali kokanga+ baoyo bazalaki kokanga bango, mpe bakozala mpenza na bokonzi likoló ya baoyo bazalaki kotinda bango na makasi básala mosala.+

  • Danyele 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mokonzi azalaki kobelela na mongongo makasi ete bákɔtisa bato oyo babelelaka bilimo, Bakaladea mpe banganga-minzoto.+ Mokonzi ayanolaki mpe alobaki na bato ya bwanya ya Babilone boye: “Moto nyonso oyo akotánga likomi oyo mpe akopesa ngai ndimbola na yango, bakolatisa ye bilamba motane-bulé,+ ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo, mpe akoyangela, akozala moto ya misato na bokonzi.”+

  • Danyele 5:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe ngai nayoki ete yo okoki kopesa bandimbola+ mpe kofungola mazita. Sikoyo, soki okoki kotánga likomi oyo mpe kopesa ngai ndimbola na yango, bakolatisa yo bilamba ya motane-bulé, ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo, mpe okoyangela, okozala moto ya misato na bokonzi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto