-
Estere 3:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Bongo babengisaki basɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi+ na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na misato ya sanza yango, mpe na kolanda mitindo nyonso oyo Hamane apesaki, bakomelaki+ basatrape ya mokonzi ná baguvɛrnɛrɛ oyo bazalaki kokamba bitúká ndenge na ndenge oyo eyangelami,+ mpe bankumu ya bato ya bikólo ndenge na ndenge, na etúká mokomoko oyo eyangelami na kolanda ekomeli na yango+ mpe ekólo mokomoko na kolanda monɔkɔ na yango; yango ekomamaki na nkombo+ ya Mokonzi Ahasueruse mpe etyamaki kashɛ na lopɛtɛ ya kotya bilembo ya mokonzi.+
-
-
Estere 8:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Bongo babengaki basɛkrɛtɛrɛ+ ya mokonzi na ntango yango na sanza ya misato, elingi koloba, sanza ya Sivane, na mokolo ya ntuku mibale na misato (23) ya sanza yango; mpe mokanda ekomamaki na kolanda mitindo nyonso oyo Mordekai apesaki Bayuda, basatrapɛ,+ baguvɛrnɛrɛ ná bankumu ya bitúká oyo eyangelami oyo ezalaki banda na India tii na Etiopi: bitúká oyo eyangelami nkama moko na ntuku mibale na nsambo (127),+ na etúká mokomoko eyangelami na kolanda ekomeli+ na yango mpe ekólo mokomoko na kolanda monɔkɔ+ na yango, mpe na Bayuda na ndenge na bango ya kokoma mpe na monɔkɔ+ na bango.
-