Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 2:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bóloba na lolendo mingi boye te,

      Eloko moko ya lofundo ebima na monɔkɔ na bino te,+

      Mpo Yehova azali Nzambe ya boyebi,+

      Mpe amekaka misala na ndenge oyo ebongi.+

  • Nzembo 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Yehova akolongola bato nyonso ya monokɔ sukali,

      Lolemo oyo elobaka makambo minene,+

  • Danyele 8:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe ya solo, na kolanda mayele na ye ya kososola, akolongisa mpe bokosi na lobɔkɔ na ye.+ Mpe na motema na ye akotombola mapeka,+ mpe na ntango oyo mitungisi+ ezali te, akobebisa ebele. Mpe akotɛlɛma mpo na kobunda na Nkumu ya bankumu,+ kasi lobɔkɔ te nde ekobuka ye.+

  • Emoniseli 13:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bapesaki yango monɔkɔ oyo elobaka makambo minene+ mpe efingaka,+ mpe bapesaki yango bokonzi mpo esala makambo sanza ntuku minei na mibale (42).+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto