Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 33:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe abandaki koloba ete:

      “Yehova—autaki na Sinai,+

      Mpe abimelaki bango longwa na Seire.+

      Abimaki longwa na etúká ya ngombangomba ya Parane,+

      Mpe bamiriade mosantu bazalaki elongo na ye,+

      Babundi na bango bazalaki na lobɔkɔ na ye ya mobali.+

  • 1 Bakonzi 22:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe alobaki lisusu: “Boye yoká liloba ya Yehova:+ Ya solo, nazali komona Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi+ mpe limpinga mobimba ya likoló etɛlɛmi pene na ye, na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+

  • Nzembo 68:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Makalo ya bitumba ya Nzambe ezali bankóto zomi zomi, bankóto na bankóto koleka.+

      Yehova ye moko auti na Sinai, ayei kokɔta na esika mosantu.+

  • Baebre 12:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi bopusani nde penepene na Ngomba Siona+ mpe na engumba+ ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló,+ mpe na bamiriade ya baanzelu,+

  • Yuda 14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ɛɛ, moto ya nsambo na molɔngɔ oyo ebandi na Adama, ye Enoka,+ asakolaki mpe mpo na bango, ntango alobaki ete: “Talá! Yehova ayei na bamiriade na ye basantu,+

  • Emoniseli 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe namonaki, mpe nayokaki mongongo moko ya ebele ya baanzelu oyo bazalaki zingazinga ya kiti ya bokonzi mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bankulutu, mpe motángo na bango ezalaki bamiriade na bamiriade+ mpe bankóto na bankóto,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto