Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo Yehova akosambisa bato na ye+

      Mpe akoyokela basaleli na ye mawa,+

      Mpo akomona ete lisungi elongwe

      Mpe kaka moto oyo azangi makoki mpe azangi ntina nde azali.

  • 1 Samwele 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi bato oyo bazali kobunda na Yehova bakoyoka nsɔmɔ;+

      Akongulumela bango kuna na likoló lokola nkake.+

      Yehova ye moko akosambisa mabele tii na bansuka na yango,+

      Mpo apesa mokonzi+ na ye makasi,

      Mpo atombola liseke ya moto na ye oyo atyami mafuta.”+

  • Nzembo 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nzambe azali Mosambisi oyo azali moyengebene,+

      Mpe Nzambe azali kobimisa makaneli mikolo nyonso.

  • Nzembo 50:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpe likoló ezali koyebisa boyengebene na ye,+

      Mpo Nzambe ye moko azali Mosambisi.+ Sela.

  • Mosakoli 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ngai nalobi na motema na ngai ete:+ “Nzambe ya solo akosambisa moyengebene mpe moto mabe,+ mpo epai na ye, likambo na likambo mpe mosala na mosala ezali na ntango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto