13 mpe na katikati ya bitɛlɛmiselo ya miinda yango moto moko lokola mwana ya moto,+ alati elamba moko oyo ekiti tii na makolo, mpe alati mokaba ya wolo na ntolo.
14 Mpe namonaki, mpe talá! lipata moko ya mpɛmbɛ, mpe moto moko oyo azali lokola mwana ya moto+ afandi na lipata yango, azali na motole ya wolo+ na motó na ye mpe likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye.