Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Akoloba ete: “Ngai, ɛɛ ngai, natye mokonzi na ngai+

      Na Siona,+ ngomba na ngai mosantu.”+

  • Nzembo 8:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Ozali kosala ete ye ayangela misala ya mabɔkɔ na yo;+

      Otye eloko nyonso na nse ya makolo na ye:+

  • Nzembo 89:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Lisusu, ngai moko nakotya ye mwana ya liboso,+

      Oyo-aleki-likoló na kati ya bakonzi ya mabele.+

  • Nzembo 110:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Uta na Siona,+ Yehova akotinda lingenda+ ya makasi na yo na maloba oyo:

      “Kende kotya bato na nse ya bokonzi na yo na katikati ya banguna na yo.”+

  • Yisaya 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo baboteli biso mwana,+ bapesi biso mwana mobali;+ mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+ Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko,+ Nkumu ya Kimya.+

  • Matai 28:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe Yesu apusanaki mpe asololaki na bango, alobi: “Bapesi ngai bokonzi nyonso+ na likoló mpe na mabele.

  • Luka 10:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso,+ mpe moto moko te ayebi Mwana longola kaka Tata;+ mpe moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana+ ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.”

  • 1 Bakorinti 15:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpo asengeli koyangela tii ntango Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye.+

  • Baefese 1:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Atyaki mpe biloko nyonso na nse ya makolo na ye,+ mpe akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso+ oyo etali lisangá,

  • Emoniseli 3:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Moto oyo alongi+ nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi,+ ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi+ elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto