8 Mpe esalemaki boye: ntango liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye eyokanaki, mpe ntango bilenge basi mingi bayanganisamaki na Shushane+ ndako monene, na mabɔkɔ ya Hegai,+ bayaki mpe na Estere na ndako ya mokonzi, batikaki ye na mabɔkɔ ya Hegai, mokɛngɛli ya basi.