12 Bamonisaki bango ete ezali mpo na bango te,+ kasi mpo na bino nde bazalaki kosala makambo oyo ezali kosakolama+ sikoyo epai na bino na nzela ya baoyo basakwelaki bino nsango malamu na nzela ya elimo santu+ oyo etindamaki uta na likoló. Makambo wana nde baanzelu bazalaka na mposa ya kotalatala.+