-
Ezera 9:7Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Banda na mikolo ya bankɔkɔ na biso+ tii na mokolo ya lelo, tozali na ngambo monene;+ mpe mpo na mabunga na biso, biso moko, bakonzi na biso,+ banganga-nzambe na biso,+ tozali kokabama na mabɔkɔ ya bakonzi ya mikili mosusu na mopanga,+ na bokangami+ mpe na kopunzama+ mpe na nsɔni na elongi,+ lokola na mokolo ya lelo.
-
-
Nehemia 9:32Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
32 “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene,+ ya nguya+ mpe ya nsɔmɔ,+ yo oyo obatelaka kondimana+ mpe motema boboto,+ kotika te ete bampasi nyonso oyo ezwi biso,+ bakonzi+ na biso, bankumu+ na biso, banganga-nzambe+ na biso, basakoli+ na biso, bankɔkɔ+ na biso ná bato na yo nyonso banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri tii na mokolo ya lelo,+ emonana eloko moke liboso na yo.+
-