Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe akobaki koloba ete: “Nabondeli bino, bóyoka maloba na ngai. Soki mosakoli moko ya Yehova azali na kati na bino, mbɛlɛ nalingaki komimonisa na ye na emonaneli.+ Nalingaki koloba na ye nde na ndɔtɔ.+

  • Yobo 33:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na ndɔtɔ,+ emonaneli+ ya butu,

      Ntango mpɔngi makasi ekwelaka bato,

      Na ntango ya kokanga miso likoló ya mbeto.+

  • Nzembo 25:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye,+

      Lisusu apesi bango kondimana na ye, mpo báyeba yango.+

  • Danyele 2:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Nzokande, ezali na Nzambe moko na likoló oyo azali Momonisi ya basekele,+ mpe ayebisi Mokonzi Nebukadenezare makambo oyo ekosalema na eleko ya nsuka ya mikolo.+ Ndɔtɔ na yo mpe bimonaneli ya motó na yo na mbeto na yo— yango oyo:

  • 1 Bakorinti 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo nani kati na bato ayebaka makambo ya moto, longola kaka elimo+ ya moto oyo ezali na kati na ye? Ndenge moko mpe, moto moko te ayebi makambo ya Nzambe, longola kaka elimo+ ya Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto