11 Ee Yehova, bonene,+ nguya,+ kitoko,+ nkembo+ ná lokumu+ ezali ya yo; mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo.+ Bokonzi+ ezali ya yo, Ee Yehova, Yo mokonzi oyo otombwami likoló na nyonso.+
18 Yo nde omonisaka motema boboto epai ya bato nkóto nkóto,+ mpe ofutaka libunga ya batata na ntolo ya bana na bango nsima na bango,+ Nzambe ya solo, Yo nde ozali monene,+ Yo nde ozali na nguya,+ Yehova ya mampinga+ nde nkombo na ye,+