16 Na ntango yango baoyo babangaka Yehova+ balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki kotya likebi mpe koyoka.+ Mpe buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye+ mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.+
23 na liyangani monene,+ mpe na lisangá ya bana ya liboso+ oyo bakomamá nkombo+ na likoló, mpe na Nzambe Mosambisi ya bato nyonso,+ mpe na bomoi ya elimo+ ya bayengebene oyo bakómi bato ya kokoka,+
5 Moto oyo alongi+ bakolatisa ye bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ;+ mpe nakoboma nkombo na ye te na buku ya bomoi,+ kasi nakondima nkombo na ye liboso ya Tata na ngai+ mpe liboso ya baanzelu na ye.+