18 Yehova alobi: “Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.+ Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ;+ ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi, ekokóma lokola lɛnɛ.
14 Na mbala moko nalobaki na ye ete: “Nkolo na ngai, yo nde moto oyebi.” Mpe ye alobaki na ngai ete: “Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene,+ mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ+ na makila+ ya Mwana-Mpate.