Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 4:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Namonaki, mpe talá! moto ya mabele azalaki te, mpe bikelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló esilaki kokima.+

  • Yirimia 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nakotombola mongongo na ngai na kolela mpe na bileli likoló ya bangomba,+ mpe na loyembo ya mawa na esika ya koleisa banyama matiti na esobe; mpo yango ekotumbama,+ bongo moto ata moko te akoleka wana mpe bato bakoyoka mongongo ya bibwɛlɛ te.+ Bikelamu oyo epumbwaka ya likoló mpe nyama ekokima, ekokende.+

  • Yirimia 12:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kino ntango nini mokili ekokoba kokauka,+ mpe milona ya elanga nyonso ekokauka?+ Mpo na mabe ya bato oyo bafandi kati na yango, banyama mpe bikelamu oyo epumbwaka ekɔmbɔlami.+ Mpo balobi: “Azali komona te mikolo na biso oyo ekoya.”

  • Sefania 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Nakosilisa nyɛɛ moto ya mabele ná nyama.+ Nakosilisa nyɛɛ ekelamu oyo epumbwaka na likoló ná mbisi ya mbu,+ ná biloko oyo ebɛtisaka libaku, ná bato mabe;+ mpe nakoboma bato na mabele,”+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto