12 Mpe moto oyo akosala makambo na lofundo kozanga koyokela nganga-nzambe oyo atɛlɛmi kuna mpo na kosalela Yehova Nzambe na yo to mosambisi,+ moto yango asengeli kokufa;+ mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.+
18 Mpe balobaki boye: “Bóya, mpe tózwela Yirimia mayele,+ mpo mobeko ekolimwa epai ya nganga-nzambe te+ to toli epai ya moto ya bwanya te to liloba epai ya mosakoli te.+ Bóya mpe tóbɛta ye na lolemo,+ mpe tótya likebi ata moke te na maloba na ye.”