Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe bazalaki koboya malako na ye mpe kondimana+ na ye oyo asalaki ná bankɔkɔ na bango mpe makundoli+ na ye oyo akebisaki bango na yango, mpe bakómaki kolanda bikeko ya mpamba+ mpe bango moko bakómaki mpamba,+ ɛɛ, mpo bamekolaki bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, oyo mpo na yango Yehova apesaki bango mitindo ete básala lokola bango te;+

  • Yisaya 24:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe mokili ekómisami mbindo na bato oyo bafandi wana,+ mpo balandi mibeko te,+ babongoli lilako,+ babuki kondimana ya ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Hosea 8:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Na monɔkɔ na yo—tyá liseke!+ Moto moko azali koyela ndako ya Yehova lokola mpongo,+ mpo babuki kondimana na ngai,+ mpe babuki mobeko na ngai.+

  • Baebre 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 ekozala te na kolanda kondimana+ oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ mpo batikalaki te na kati ya kondimana na ngai,+ yango wana natikaki kobatela bango,’ Yehova alobi bongo.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto