Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 9:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe bango—na boumeli ya bokonzi+ na bango mpe na biloko ya malamu+ oyo otondi na yango, oyo opesaki bango mpe na kati ya mokili monene mpe ya malamu mpenza+ oyo ezalaki liboso na bango, basalelaki yo te+ mpe babongwanaki te ete bátika misala na bango ya mabe.+

  • Yisaya 9:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe bato bazongeli te Moto oyo azali kobɛta bango,+ mpe baluki Yehova ya mampinga te.+

  • Yirimia 8:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo na nini bato oyo, Yerusaleme, bazangi bosembo na kozanga bosembo moko oyo ezali koumela? Basimbi bokosi;+ baboyi kozonga.+

  • Amose 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Mpe ngai lisusu, ɛɛ ngai, napesaki bino bopɛto ya mino+ na bingumba na bino nyonso mpe bosɛnga ya limpa na bisika na bino nyonso;+ kasi bozongelaki ngai te,’+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Zekaria 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “‘Bókóma lokola batata na bino+ te oyo basakoli ya kala babelelaki bango+ ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bózonga, nabondeli bino, bólongwa na banzela na bino ya mabe mpe na misala na bino ya mabe.’”’+

      “‘Kasi bayokaki te, mpe batyelaki ngai ata likebi te,’+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto