Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Yehova azali makasi+ na ngai mpe nguba+ na ngai.

      Motema na ngai etyeli ye elikya,+

      Mpe nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela,+

      Mpe nakokumisa ye na loyembo na ngai.+

  • Yisaya 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Ee yo mwasi oyo ofandaka na Siona, gangá makasi mpe gangá na esengo, mpo Mosantu ya Yisraele+ azali monene epai na yo.”

  • Yisaya 41:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Okopupola+ yango, mpe mopɛpɛ ekomema yango,+ mpe mopɛpɛ makasi ekomema yango na banzela ndenge na ndenge.+ Mpe yo, okosepela na Yehova.+ Okomikumisa na Mosantu ya Yisraele.”+

  • Yisaya 61:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ya solo, nakosepela na Yehova.+ Molimo na ngai ekozala na esengo na Nzambe na ngai.+ Mpo alatisi ngai bilamba ya lobiko;+ alíngi ngai kazaka ya boyengebene oyo ezangá mabɔkɔ,+ lokola mobali ya libala oyo azali kotya eloko ya kolata na motó,+ ndenge nganga-nzambe atyaka, mpe lokola mwasi ya libala oyo azali kolata biloko na ye ya kobongisa nzoto.+

  • Habakuku 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko,+ nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.+

  • Zekaria 10:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bato ya Efraime bakokóma lokola moto ya nguya,+ mpe motema na bango ekosepela lokola nde bamɛli vinyo.+ Mpe bana na bango bakomona mpe bakosepela mpenza;+ motema na bango ekosepela na Yehova.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto