14 Talá oyo Yehova alobi mpo na bato mabe nyonso oyo bafandi penepene na ngai,+ oyo bazali kosimba libula oyo napesaki bato na ngai, ɛɛ Yisraele:+ “Talá, nazali kopikola bango na mabele na bango;+ mpe nakopikola ndako ya Yuda na kati na bango.+
8 “Nayoki kotuka oyo euti na Moabe+ mpe maloba ya kofinga ya bana ya Amone,+ oyo basaleli mpo básambwisa bato na ngai mpe bazali se kotombolela teritware na bango mapeka.