33 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Mwana mwasi ya Babilone azali lokola esika ya kotutatuta mbuma.+ Ezali ntango ya konyatanyata ye makasi. Naino mwa ntango moke mpe ntango ya kobuka mbuma esengeli koya mpo na ye.”+
18 Anzelu mosusu mpe abimaki na etumbelo mpe azalaki na bokonzi likoló ya mɔtɔ.+ Mpe abelelaki oyo asimbi likwangola oyo epeli makasi na mongongo makasi ete: “Tyá likwangola na yo oyo epeli makasi mpe yanganisá bituka ya mbuma ya nzete ya vinyo ya mabele,+ mpo mbuma na yango eteli.”