Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 4:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na ntina na yango mokili ekolela,+ mpe kuna na likoló ekoyinda mpenza.+ Ezali mpo nalobi, nataleli, nayoki mawa te, mpe nakozonga nsima mpo na yango te.+

  • Yoele 2:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Moi ekobongwana molili,+ mpe sanza ekobongwana makila,+ liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova.+

  • Matai 24:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Nokinoki nsima ya bolɔzi ya mikolo yango moi ekoyinda,+ mpe sanza+ ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.+

  • Luka 21:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Lisusu, bilembo ekozala na moi+ mpe na sanza mpe na minzoto, mpe awa na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala mpo mbu+ ezali konguluma mpe kotomboka,+

  • Misala 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 moi+ ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova eya.+

  • Emoniseli 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe afungolaki libulu mozindo yango, mpe milinga+ eutaki na libulu yango lokola milinga ya litumbu monene,+ mpe moi eyindaki,+ ná mopɛpɛ mpe, mpo na milinga ya libulu yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto