-
Nehemia 9:17Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 Bongo baboyaki koyoka,+ mpe bakanisaki+ te misala na yo ya kokamwa oyo osalelaki bango, kasi bakómisaki motó na bango makasi+ mpe batyaki mokonzi+ mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito. Kasi yo ozali Nzambe ya bolimbisi,+ ya ngɔlu+ mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda+ noki te mpe otondi+ na motema boboto, mpe otikaki bango te.+
-
-
Yona 4:2Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Na yango, abondelaki Yehova mpe alobaki boye: “Sikoyo, Ee Yehova, oyo ezali te likambo oyo ezalaki kotungisa ngai ntango nazalaki na mokili na ngai? Yango wana, nawelelaki kokima na Tarasisi;+ mpo nayebaki ete yo ozali Nzambe ya ngɔlu mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda noki te mpe ozali na motema boboto mingi,+ mpe oyokaka mawa mpo na likama.+
-