7 mwasi moko apusanaki epai na ye na molangi* ya mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi,+ na ntango yango Yesu afandaki na mesa mpe mwasi wana abandaki kosopela ye mafuta yango na motó.
3 Na yango, Maria akamataki litra moko ya mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo,+ ya ntalo mingi, mpe apakolaki Yesu na makolo mpe apangwisaki ye makolo na nsuki na ye.+ Ndako etondaki na nsolo ya mafuta yango ya nsolo kitoko.