Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo Yehova akosambisa bato na ye+

      Mpe akoyokela basaleli na ye mawa,+

      Mpo akomona ete lisungi elongwe

      Mpe kaka moto oyo azangi makoki mpe azangi ntina nde azali.

  • Nzembo 106:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Mpe, mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,+

      Mpe azalaki koyoka mawa na kolanda bonene ya motema boboto na ye ya kokamwa.+

  • Hosea 11:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Ee Efraime,+ nasundola yo ndenge nini? Ee Yisraele, nakaba yo ndenge nini?+ Nakómisa yo lokola Adema+ ndenge nini? Natya yo lokola Zeboyime+ ndenge nini? Motema na ngai ebongwani;+ na ntango yango mpe, motema mawa na ngai engali.

  • Yona 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe Nzambe ya solo amonaki misala na bango,+ amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe;+ bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa+ mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.+

  • Yakobo 5:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto