Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 12:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe abandaki kopesa makabo likoló ya etumbelo oyo asalaki na Betele, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo abimisaki na likanisi na ye moko;+ mpe asalelaki bana ya Yisraele fɛti mpe apesaki makabo likoló ya etumbelo yango mpo na kobimisa milinga ya mbeka.+

  • 2 Bakonzi 23:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe lisusu, etumbelo oyo ezalaki na Betele,+ esika oyo etombwaná oyo Yeroboame+ mwana ya Nebate asalaki, ye oyo atindaki Yisraele básala lisumu,+ ata etumbelo yango ná esika oyo etombwaná, abukaki yango. Na nsima, atumbaki esika yango oyo etombwaná; atutatutaki yango tii ekómaki putulu mpe atumbaki nzete yango ya losambo.

  • 2 Ntango 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe ntango kaka basilisaki nyonso wana, Bayisraele nyonso+ oyo bazalaki wana babimaki, bakei na bingumba ya Yuda,+ mpe babandaki kobuka makonzí ya losambo,+ kokata banzete ya losambo,+ kokweisa bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo+ na Yuda+ mobimba ná Benyamina, mpe na Efraime+ ná Manase+ tii basilisaki; nsima na yango, bana nyonso ya Yisraele bazongaki na bingumba na bango, moto na moto na esika na ye.

  • Hosea 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe sikoyo basali lisumu mosusu mpe na palata+ na bango, bamisaleli ekeko ya palata oyo enyangwisami, bikeko na kolanda mayele na bango moko,+ yango nyonso mosala ya bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ.+ Bazali koloba na yango ete: ‘Bato oyo bazali bapesi-mbeka bápwɛpwa bana ya ngɔmbɛ ya mpambampamba.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto