2 Bakonzi 24:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Na ntango yango, basaleli ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone bamataki na Yerusaleme, bongo bazingaki engumba.+ 2 Bakonzi 25:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea+ balandaki mokonzi, mpe bakangaki ye+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko;+ mpe limpinga mobimba ya basoda na ye bapanzanaki, batiki ye. Yirimia 52:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Talá bato oyo Nebukadrezare amemaki na mboka mopaya: na mbula ya nsambo, Bayuda nkóto misato na ntuku mibale na misato (3 023).+
10 Na ntango yango, basaleli ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone bamataki na Yerusaleme, bongo bazingaki engumba.+
5 Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea+ balandaki mokonzi, mpe bakangaki ye+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko;+ mpe limpinga mobimba ya basoda na ye bapanzanaki, batiki ye.
28 Talá bato oyo Nebukadrezare amemaki na mboka mopaya: na mbula ya nsambo, Bayuda nkóto misato na ntuku mibale na misato (3 023).+