Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 10:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe bana ya Yavane ezalaki Elisha,+ Tarasisi,+ Kitime+ ná Dodanime.+

  • 2 Ntango 9:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpamba te bamasuwa ya mokonzi ezalaki kokende na Tarasisi+ ná basaleli ya Hirame.+ Mbala moko na mbula misato nyonso, bamasuwa ya Tarasisi ezalaki koya na wolo ná palata,+ mpɛmbɛ ya nzoku,+ bamakako ná bandɛkɛ lipombo.+

  • Yisaya 23:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Liyebisi mpo na Tire:+ Bino bamasuwa ya Tarasisi+ bóganga na kolela! mpo epunzami, ezali libongo lisusu te, ezali esika ya kokɔta lisusu te.+ Bamonisaki bango likambo yango banda na mokili ya Kitime.+

  • Yirimia 10:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bazali komema longwa na Tarasisi+ palata oyo babɛtibɛti kino ekómi bitando ya papala, mpe wolo longwa na Ufaze,+ mosala ya moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe esalemi na mabɔkɔ ya mosali bibende; bilamba na bango ezali nsinga ya bulé mpe lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé. Yango nyonso ezali mosala ya bato oyo bayebi mosala malamu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto